Luke 13:14 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato: — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te!
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi mokonzi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo Yesu abikisaki moto na mokolo ya saba. Bongo alobaki boye na ebele ya bato: —Mikolo ezali motoba mpo na kosala mosala; boya, mpe babikisa bino na mikolo wana! Kasi na mokolo ya saba te!