Luke 13:34 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
—Yeruzalem! Yeruzalem! Yo moto obomaka baprofeta mpe obomaka na mabanga bato oyo Nzambe atindelaka yo! Mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso esangisaka bana na yango na nse ya mapapu, kasi olingaki yango te!