Luke 14:10 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi soki babengisi yo na feti, kende na yo kovanda na esika ya suka, mpo ete, tango moto oyo abengisi yo akoya, aloba na yo: ‹ Molingami na ngai, yaka kovanda na esika oyo eleki malamu! › Boye, okopesamela lokumu na miso ya bato nyonso oyo babengami na feti.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi, soki babengisi yo na feti, kende kovanda na esika ya suka. Mpo ete tango moto oyo abengisaki yo akoya, akoloba na yo: “Moninga na ngai, yaka kovanda awa na esika ya kitoko”. Yango ekopesa yo lokumu na miso ya bato nyonso oyo babengami na feti.