Luke 14:21 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mosali azongaki mpe ayebisaki makambo nyonso epai ya nkolo na ye. Nkolo ndako asilikaki makasi mpe atindaki mosali na ye: « Kende noki na banzela, na babalabala ya engumba, mpe memela ngai babola, ba-ebosono, bakakatani mpe bakufi miso. »
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Mosali azongaki mpe ayebisaki yango na mokonzi na ye. Bongo nkolo ndako asilikaki mpe alobaki na mosali na ye: “Kende noki na banzela mpe na babala-bala ya vile mpe mema awa: babola, bato bakufa makolo to maboko, bato batambolaka tengu-tengu mpe baoyo bakufa miso.”