Luke 20:46 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
— Bosala keba na balakisi ya Mobeko! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti;
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
—Bokeba na balakisi ya Mibeko, bango balingaka kotambola na banzambala ya milayi, mpe bapesa bango bambote na bazando. Balingaka mpe kovanda na bisika ya lokumu na bandako ya mayangani, mpe na bisika ya kitoko na bafeti.