Luke 5:21 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bakomaki kokanisa: — Moto oyo azali komimona penza nani mpo ete abimisa maloba ya kotiola Nzambe? Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te?
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko babandaki kokanisa na nse ya mitema: —Moto oyo azali nani oyo azali kobimisa maloba ya kotiola Nzambe? Nani akoki kolimbisa masumu, soki ezali kaka ye moko Nzambe te?