Luke 6:17 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Yesu akitaki ngomba elongo na bango, mpe atelemaki esika moko ya polele. Bayekoli na ye ebele penza bazalaki wana elongo na bato mingi penza oyo bawutaki na Yudea mobimba, Yeruzalem, mpe na bamboka ya Tire mpe Sidon oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.