Luke 6:4 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Akotaki kati na Ndako ya Nzambe, akamataki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe, aliaki yango mpe apesaki yango epai ya baninga na ye. Nzokande, Banganga-Nzambe kaka nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Akotaki na Ndako ya Nzambe, akamataki mampa oyo bapesaki makabo na Nzambe, aliaki yango, mpe apesaki bato oyo bazalaki na ye. Nzokande kaka banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa mpo na kolia yango.