Luke 6:42 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso na yo, › wana ozali kokoka komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko. Bolole! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo okomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: “Ndeko na ngai, tika nalongola mwa lititi oyo ezali na liso na yo”, na tango yo moko ozali komona te nzete oyo ezali na liso na yo. Moto ya kokosana! longola liboso nzete oyo ezali na liso na yo, bongo nde okomona polele mpo na kolongola mwa lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo.