Luke 6:48 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
akokani na moto oyo, mpo na kotonga ndako, atimolaki mabele, akitaki penza na mozindo mpe atongaki moboko ya ndako yango na likolo ya libanga; tango mpela eyaki, mayi emataki makasi mpe emibwakaki na ndako yango kasi ekokaki te kobuka yango, pamba te etongamaki malamu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
akokani na moto oyo atongaki ndako, mpe atimolaki, atimolaki penza tii na nse, mpe atongaki fondasio likolo ya libanga. Tango mpela eyaki, mayi emibwakaki na makasi nyonso na ndako, kasi ekokaki te kokweyisa yango pamba te etongamaki malamu penza.