Luke 8:16 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto; atiaka yango nde na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole na yango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
—Moto moko te soki apelisi mwinda abombaka yango na nse ya nzungu to atiaka yango na nse ya mbeto. Kasi atiaka yango likolo ya eloko oyo batielaka mwinda mpo ete bato oyo bazali kokota bamona moi na yango.