Luke 8:29 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te Yesu azalaki kotinda molimo mabe ebima na moto wana. Mbala mingi molimo mabe ezalaki kokanga ye; bongo bazalaki kokanga ye na basinga, kobatela ye na minyololo mpe kotia ye mabende na makolo. Kasi azalaki kokata yango, mpe molimo mabe ezalaki kotinda ye na esika ya ye moko kaka.