Luke 8:47 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Awa mwasi yango amonaki ete azali ya kobombama te, akendeki na kolenga, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe alobaki na miso ya bato nyonso mpo na nini asimbaki Yesu mpe ndenge nini abiki mbala moko na bokono na ye.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Mwasi yango lokola ayebaki ete akoki kobatama te, ayaki na kolenga nyonso, afukamaki liboso ya Yesu, mpe alobaki na miso ya bato nyonso, soki mpo na nini asimbaki ye mpe ndenge abikaka na mbala moko.