Luke 9:11 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kasi tango ebele ya bato bayokaki bongo, balandaki Ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango na tina na Bokonzi ya Nzambe, abikisaki mpe bato oyo bazalaki na posa ya lobiko na bokono ya nzoto.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Kasi tango ebele ya bato bayebaki yango, balandaki ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango makambo ya Bokonzi ya Nzambe mpe abikisaki baoyo bazalaki na posa ya kobika.