Luke 9:26 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, Mwana na Moto akoyoka ye soni, tango akoya kati na nkembo na Ye mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya ba-anjelu ya bule.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te, moto nyonso oyo akoyokela ngai soni, mpe akoyokela Maloba na ngai soni, Mwana ya Moto mpe akoyokela ye soni tango akoya kati na nkembo na ye, mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya baanzelu basantu.