Luke 9:36 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tango mongongo esilaki koyokana, bamonaki Yesu atikalaki kaka ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango, mpe na mikolo wana bayebisaki na moto moko te makambo oyo bamonaki.