Mark 12:28 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki: — Mobeko nini eleki monene kati ya mibeko nyonso?
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Molakisi moko ya Mibeko ayokaki bango tango bazalaki kotiana tembe. Mpe awa amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano malamu; apusanaki mpe atunaki ye: —Na kati ya mibeko nyonso, mobeko nini eleki na tina?