Mark 14:22 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango, apesaki bango yango mpe alobaki: — Oyo ezali nzoto na Ngai! Bozwa.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Awa bazalaki kolia, Yesu akamataki limpa, azongisaki matondi, mpe akataki yango. Apesaki yango na bayekoli na ye, mpe alobaki: —Bokamata, oyo ezali nzoto na ngai!