Mark 14:3 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, mwasi moko akotaki, wana Yesu azalaki na mesa. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi; afungolaki molangi yango mpe asopaki malasi yango na moto ya Yesu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Yesu azalaki na Betaniya, na ndako ya Simon oyo azalaki na maladi ya maba. Tangu azalaki na mesa, mwasi moko ayaki na molangi ya Albatre, etonda na malasi ya nar oyo basangisa te mpe ya motuya mingi. Afungolaki yango mpe asopaki malasi na moto ya Yesu.