Mark 14:43 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Awa azalaki naino koloba, Yuda, moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, akomaki. Ayaki elongo na bato ebele, oyo basimbaki mipanga mpe banzete; batindaki bango na bakonzi ya banganga Nzambe, balakisi ya Mibeko mpe bankolo.