Mark 15:1 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tango akanisaki yango, alelaki. Na tongo, bakonzi ya banganga-Nzambe, elongo na bankolo, balakisi ya Mibeko, mpe bato nyonso ya likita monene ya Bayuda, basanganaki mpo na kokata likambo. Bongo bakangaki Yesu na basinga, bamemaki ye mpe bapesaki ye na maboko ya Pilato.