Mark 16:8 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Babimaki na lombangu mpe bakimaki mosika ya kunda ya Yesu, pamba te bango nyonso bazalaki kolenga na somo, mpe makanisi na bango epalanganaki. Balobaki eloko te na moto nyonso, pamba te bazalaki kobanga.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Basi babimaki na lilita mpe bakimaki. Kolenga ekangaki bango mpe makanisi na bango epalanganaki; balobaki eloko moko te na moto, pamba te bazalaki kobanga.