Mark 9:20 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bongo bamemaki mwana yango epai ya Yesu. Tango kaka molimo yango ya mabe emonaki Yesu, eningisaki mwana yango makasi mpe mwana akweyaki na mabele, akomaki kobaluka-baluka mpe kobimisa fulufulu na monoko.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo bamemelaki ye mwana yango. Tango molimo emonaki Yesu, kaka na tango wana eningisaki mwana makasi penza. Mwana akweyaki na mabele, azalaki kobaluka-baluka mpe monoko na ye etondaki na fulu-fulu.