Mark 9:26 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi mpe ebimaki kati na ye. Mwana akomaki lokola moto akufi na ndenge ete mingi kati na bato oyo bazalaki wana bakomaki koloba « Akufi! »
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi penza, bongo ebimaki. Mwana akomaki lokola akufi, na ndenge ete bato mingi bazalaki koloba: “Akufi”.