Matthew 1:17 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Kobanda na Abrayami kino na Davidi, elekaki bikeke zomi na minei; kobanda na Davidi kino na tango oyo bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu, na Babiloni, elekaki lisusu bikeke zomi na minei; mpe kobanda na bowumbu, na Babiloni, kino na Klisto, elekaki lisusu bikeke zomi na minei.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bango nyonso, banda na Abraham kino na David, ezalaki na mabota zomi na minei; banda David kino na tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu na Babilone, ezalaki na mabota zomi na minei; mpe kobanda tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu kino na Kristo, ezalaki na mabota zomi na minei.