Matthew 1:20 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Wana Jozefi azalaki kokanisa makambo yango, anjelu na Nkolo abimelaki ye kati na ndoto mpe alobaki na ye: « Jozefi, mokitani ya Davidi, kobanga te kobala Mari; pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Awa azalaki kokanisa mpo na makambo yango, anzelu ya Nkolo abimelaki ye na ndoto, mpe alobaki na ye: —Zozefi mwana ya David, kobanga te mpo na kozwa Mariya mwasi na yo, pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu.