Matthew 11:21 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Alobaki: — Mawa na yo, Korazini! Mawa na yo, Betisaida! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu!
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
—Mawa na yo Korazini! Mawa na yo Betsaida! Pamba te, soki makamwisi oyo esalamaki kati na bino, esalamaka na Tire mpe Sidon, mbele banda kala, bato ya bavile wana balingaki kobongola mitema, mpe kolakisa yango na kolata saki mpe komipakola putulu.