Matthew 11:27 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tata apesaki makambo nyonso na maboko na ngai. Moto moko te ayebi Mwana, kaka Tata nde ayebi ye. Moto moko te ayebi Tata, kaka Mwana nde ayebi ye na moto oyo Mwana alingi kolakisa ye.