Matthew 12:42 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Na mokolo ya kosambisama, mokonzi mwasi ya Sude akotelema na bato ya tango oyo mpe akokatela bango etumbu. Pamba te, ye awutaki na mboka moko ya mosika mpe ayaki koyoka maloba ya bwania ya Salomon. Nzokande, moto moko azali awa aleki Salomon.