Matthew 12:45 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
ekokende lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe ekoya elongo na yango mpo na kokota na elulu mpe kovanda kuna. Boye, bomoi ya moto yango ekokoma lisusu mabe koleka ndenge ezalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya ekeke oyo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
bongo molimo yango ya mabe ekokende, mpe ekozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, ekoya kokota mpe kovanda kuna. Bongo lolenge ya moto oyo ekokoma mabe mingi koleka ndenge azalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya tango oyo.