Matthew 13:30 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma: Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Botika yango mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka mbuma. Na tango wana nde, nakoloba na bato oyo balongolaka mbuma: “Bolongola liboso matiti ya mabe, bokanga yango maboke mpe botumba yango; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na ngai ya mbuma”.