Matthew 15:31 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mpe bato bakamwaki mingi tango bamonaki ete bababa bakomi koloba, bato oyo bakufa makolo to maboko babiki, bato oyo batambolaka tengu-tengu bakomi kotambola malamu mpe bakufi miso bakomi komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isalaele.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bato bakamwaki mingi tango bamonaki bababa bakomaki koloba, bato bakufa makolo to maboko babikaki, bato oyo batambolaka tengu-tengubabandaki kotambola malamu, mpe bato oyo bakufa miso babandaki komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isayele.