Matthew 18:8 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Soki loboko to lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata mpe bwaka yango mosika na yo; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko to na lokolo moko, na esika ete otikala na maboko mibale to makolo mibale mpe obwakama na moto ya libela na libela.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Soki ozali kokweya na masumu mpo na loboko to mpo na lokolo na yo, kata yango mpe bwaka yango mosika. Pamba te, ezali malamu mpo na yo okota na Bomoi na loboko moko to na lokolo moko; ete obwakama na moto oyo ekufaka te na maboko mibale to makolo mibale.