Matthew 2:13 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima na bato ya mayele kokende, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto mpe alobaki na ye: « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye; bokima na Ejipito mpe bowumela kuna kino tango nakoyebisa yo lisusu ete bozonga, pamba te Erode akoluka koboma Mwana. »
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Tango bakendaki, anzelu ya Nkolo abimelaki Zozefi na ndoto mpe alobaki na ye: —Telema, kamata mwana na mama na ye, mpe kina na Ezipito. Vanda kuna kino tango nakoyebisa yo pamba te Erode akoluka mwana, mpo na koboma ye.