Matthew 23:25 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale! Bosukolaka malamu libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondisaka yango na biloko ya moyibi mpe ya lokoso na bino.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Bosukolaka na malamu penza libanda ya bakopo mpe ya basani na bino, kasi na kati na yango, etondi na bosoto ya misala na bino ya moyibi mpe na posa ya mabe.