Matthew 25:44 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bango mpe bakotuna Ye: « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala to na posa ya mayi; tango nini tomonaki Yo mopaya, ozangi bilamba, ozali kobela to okoti na boloko, bongo tosungaki Yo te? »
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo, bango bakozongisela ye: “Nkolo, tango nini tomonaki yo ozalaki konyokwama na nzala, to na posa ya mayi, to ozalaki mopaya, to ozangaki bilamba, to ozalaki maladi mpe okotaki boloko, bongo tosalisaki yo te?”
Recommended Reading