Matthew 3:9 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema: ‹ Abrayami azali koko na biso! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bokanisa te ete bokoki komiloba: “Abraham azali tata na biso!” Pamba te nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abraham bana wuta na mabanga oyo.