Matthew 8:9 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai; soki nalobi na moko: « Kende! » akendaka; mpe soki nalobi na mosusu: « Yaka! » ayaka; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai: « Sala mosala oyo! » asalaka yango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Pamba te ngai moko mpe nazali na nse ya bokonzi ya bakonzi, mpe nazali na basoda oyo bazali na nse ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko: “Kende”, akokende. Mpe na mosusu; “Yaka”, akoya. Mpe na mosali na ngai: “Sala boye”; akosala yango.