Philemon 1:14 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Nzokande nakokaki te kosala yango, pamba te nazwaki ndingisa na yo te, mpo ete bolamu oyo okosala ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi na kotindika te.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Nalingi kosala eloko moko te soki ondimi yango te, mpo ete bolamu oyo okosala, ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi ezala ya kotindika te.