Philippians 4:12 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo: ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Nayebi ndenge nini kozala kati na kokelela, mpe nayebi ndengenini kozala kati na biloko mingi. Nasiʼnayekola sekele ya kozala na esengo kati na makambo ya ndenge na ndenge mpe kati na makambo nyonso, ata nalie malamu to nazali na nzala, ata natondi na biloko to mpe nakeleli.