Revelation 11:6 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Batatoli yango mibale bazali na nguya ya kokanga Likolo mpo ete mvula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi mpo ete ekoma makila, mpe ya kotinda pasi ya lolenge nyonso na mabele, na tango nyonso oyo balingi.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bango bazali na nguya ya kokanga likolo mpo ete mbula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi ekoma makila, mpe ya kotinda minyoko ya lolenge nyonso na mokili, tango nyonso bango bakolinga.