Revelation 11:8 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bakotanda bibembe na bango, na etando epai wapi bato nyonso bakutanaka kati na engumba. Kolanda molimo oyo ekambaka engumba yango, babengaka etando yango Sodome mpe Ejipito. Ezali kuna na engumba yango nde Nkolo na bango abakamaki na ekulusu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo bibembe na bango bakolalisa yango na bala-bala ya vilemonene, epai babakaki Nkolo na bango na ekuruze. Na molimo, babengaka vile yango: Sodome mpe Ezipito.