Revelation 14:18 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima, anjelu mosusu oyo azalaki mokonzi ya moto alongwaki na etumbelo, mpe alobaki na mongongo makasi epai na ye oyo asimbaki mbeli ya minu makasi: « Kamata mbeli na yo ya minu mpe buka maboke ya bambuma ya vino ya mabele, pamba te bambuma yango ya vino eteli. »
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Sima anzelu mosusu oyo azalaki na bokonzi likolo ya moto, abimaki na esika batumbaka makabo. Mpe agangaki na mongongo makasi epai ya ye oyo asimbaki mopanga ya mino penza; alobaki na ye: —Kamata mopanga na yo, mpe kata bambuma ya nzete ya vino oyo ezali na mokili; pamba te bambuma na yango esiʼeteli.