Revelation 14:4 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Ezali bato oyo babebisaki nzoto na bango te na basi, pamba te bamibatelaki peto. Ezali baoyo bazalaki kolanda Mwana-meme na bisikanyonso ye azalaki kokende. Bakangolaki bango na kati ya bato, mpo bakaba bango epai ya Nzambe mpe epai ya Mwana-meme lokolamakabo ya liboso.