Revelation 15:2 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Namonaki mpe eloko moko lokola etando: ezalaki lokola talatala, mpe monene lokola molayi ya ebale monene; ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali esangana na moto. Namonaki lisusu ba-oyo balongaki nyama, ekeko na yango mpe motango ya kombo na yango; bazalaki ya kotelema na likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala mpe basimbaki mandanda oyo Nzambe apesaki bango.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Namonaki mpe ebale monene esangana na moto, ezalaki lokola talatala. Namonaki lisusu baoyo balongaki nyama, mpe elilingi na yango, mpe na talo ya kombo na yango, batelemaki likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala, mpe bazalaki na mandanda ya Nzambe.