Revelation 17:8 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Nyama oyo omonaki; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Nyama oyo omonaki, oyo ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali te, ekobima na libulu ya molai mpe ekokende na libebi. Bongo bato oyo bavandaka na mokili, baoyo bakombo na bango ekomama te na Buku ya bomoi banda na ebandeli ya mokili, bakokamwa tango bakomona nyama wana. Pamba te, nyama yango ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali te; mpe ekoya lisusu.