Revelation 19:10 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai: « Kosala bongo te! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo nafukamaki liboso ya makolo ya anzelu mpo na kosambela ye. Kasi alobaki na ngai: Kosala yango te. Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo baoyo bazali na litatoli ya yesu. Sambela Nzambe! Pamba te, litatoli ya Yesu ezali molimo ya maloba oyo baprofeta basakolaka.