Revelation 19:6 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi; ezalaki koganga: « Aleluya! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo nayokaki lokola mongongo ya bato ebele penza, ezalaki koyokana lokola makelele ya mayi ebele mpe lokola lokito ya kake yamakasi penza, elobaki: Aleluya! Pamba te Nkolo Nzambe na biso, Nzambe ya nguya nyonso azali Mokonzi.