Revelation 20:4 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo namonaki bakiti ya bokonzi na baoyo bafandelaki yango; bapesaki bangobokonzi ya kosambisa bato. Namonaki milimo ya bato oyo bakataki bango mitu mpo na litatoli ya Yesu mpe mpo na liloba ya Nzambe. Baboyaki kosambela nyama mpe na elilingi na yango, mpe bazwaki te elembo na bilongi na bango mpe na maboko na bango; bazongaki na bomoi, mpe bazalaki na bokonzi bambula nkoto moko elongo na Kristo.