Revelation 22:2 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Ezalaki kotiola na kati-kati ya balabala monene ya engumba. Na esika oyo ebale ekabwanaki na biteni mibale, ezalaki na nzete ya bomoi oyo ebotaka bambuma mbala zomi na mibale na mobu, elingi koloba ete ebotaka bambuma sanza na sanza; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
ezalaki koleka na kati-kati ya bala-bala ya vile wana. Mpe nzete ya bomoi ezalaki na ngambo na ngambo ya ebale. Yangoezalaki kobota mbuma mbala zomi na mibale na mbula, elingi koloba mbala moko na sanza moko; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo.